1
Bafilipi 4:6
Mokanda na Bomoi
MNB
Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.
Compare
Explore Bafilipi 4:6
2
Bafilipi 4:7
Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.
Explore Bafilipi 4:7
3
Bafilipi 4:8
Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.
Explore Bafilipi 4:8
4
Bafilipi 4:13
Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.
Explore Bafilipi 4:13
5
Bafilipi 4:4
Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo ; nazongeli yango lisusu : bosepelaka !
Explore Bafilipi 4:4
6
Bafilipi 4:19
Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino kolanda bomengo ya nkembo na Ye kati na Yesu-Klisto.
Explore Bafilipi 4:19
7
Bafilipi 4:9
Bosalela makambo nyonso oyo boyekolaki, bozwaki, boyokaki mpe bomonaki epai na ngai ; bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino.
Explore Bafilipi 4:9
8
Bafilipi 4:5
Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene.
Explore Bafilipi 4:5
9
Bafilipi 4:12
Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo : ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli.
Explore Bafilipi 4:12
10
Bafilipi 4:11
Nalobi bongo te mpo ete nazali kokelela, pamba te nayekola kosepela na oyo nazali na yango.
Explore Bafilipi 4:11
Home
Bible
Plans
Videos