Yoane 21:15-17
Yoane 21:15-17 MNB
Tango basilisaki kolia, Yesu atunaki Simona Petelo : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai koleka ndenge bango balingaka Ngai ? Azongisaki : — Iyo, Nkolo ! Oyebi malamu ete nalingaka Yo. Yesu alobaki na ye : — Batela bampate na Ngai. Yesu atunaki ye mpo na mbala ya mibale : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Azongisaki : — Iyo, Nkolo ! Oyebi malamu ete nalingaka yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bampate na Ngai. Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu : — Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bameme na Ngai.



![[Unboxing Psalm 23: Treasures for Every Believer] Paths of Righteousness Yoane 21:15-17 Mokanda na Bomoi](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapistaging.com%2Fhttps%3A%2F%2Fs3.amazonaws.com%2Fyvplans-staging%2F35790%2F1440x810.jpg&w=3840&q=75)

