1
1 Bakonzi 17:14
Mokanda na Bomoi
MNB
Pamba te, tala maloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Farine ekozanga te na sani, mpe mafuta ekosila te na mbeki. »
Kokisana
Luka 1 Bakonzi 17:14
2
1 Bakonzi 17:1
Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.
Luka 1 Bakonzi 17:1
3
1 Bakonzi 17:13
Eliya alobaki na ye : — Kobanga te, zonga na ndako mpe sala ndenge olobi. Kasi salela ngai nanu lipa na oyo ozali na yango mpe memela ngai yango ; bongo na sima, okosala mpo na yo mpe mpo na mwana na yo ya mobali.
Luka 1 Bakonzi 17:13
4
1 Bakonzi 17:12
Mwasi yango azongiselaki ye : — Na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, nazali na lipa te ; nazali kaka na mwa ndambo ya farine na sani mpe ndambo ya mafuta na mbeki. Nazali kolokota mwa koni oyo nakomema na ndako mpo na kolamba bilei ya suka mpo na ngai mpe mpo na mwana na ngai ya mobali. Tango tokosilisa yango, ekotikala na biso kaka kozela kufa.
Luka 1 Bakonzi 17:12
5
1 Bakonzi 17:9
« Kende na lombangu na Sarepita, kati na mokili ya Sidoni, mpe vanda kuna. Napesi mitindo kuna epai ya mwasi moko oyo akufisa mobali ete apesa yo bilei. »
Luka 1 Bakonzi 17:9
6
1 Bakonzi 17:16
Farine etikalaki kosila te na sani, mpe mafuta etikalaki kokawuka te na mbeki, kolanda ndenge Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Eliya.
Luka 1 Bakonzi 17:16
7
1 Bakonzi 17:15
Mwasi yango akendeki mpe asalaki ndenge kaka Eliya alobaki. Boye, na tango molayi, bilei ezangaki te mpo na Eliya, mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpe mpo na ndako na ye.
Luka 1 Bakonzi 17:15
8
1 Bakonzi 17:10
Eliya akendeki na Sarepita. Tango akomaki na ekuke ya engumba, mwasi moko oyo akufisa mobali azalaki wana ; azalaki kolokota bakoni. Eliya abengaki ye mpe alobaki na ye : — Nabondeli yo, zwela ngai mwa mayi na mbeki mpo ete namela.
Luka 1 Bakonzi 17:10
9
1 Bakonzi 17:4
Kuna, okomela mayi ya lubwaku, mpe napesi mitindo epai ya bayanganga mpo ete eleisa yo.
Luka 1 Bakonzi 17:4
10
1 Bakonzi 17:11
Tango mwasi yango azalaki kokende kozwa mayi, Eliya ayebisaki ye lisusu : — Nabondeli yo, memela ngai mpe lipa.
Luka 1 Bakonzi 17:11
11
1 Bakonzi 17:6
Bayanganga ezalaki komemela ye mapa mpe mbisi na tongo mpe na pokwa, mpe amelaki mayi ya lubwaku.
Luka 1 Bakonzi 17:6
12
1 Bakonzi 17:7
Sima na mwa tango, mayi ya lubwaku ekawukaki mpo ete mvula ezalaki lisusu konoka te na mokili.
Luka 1 Bakonzi 17:7
13
1 Bakonzi 17:24
Mwasi yango alobaki na Eliya : — Nasosoli sik’oyo ete ozali solo moto na Nzambe ; mpe Liloba na Yawe, oyo ebimaka na monoko na yo ezali penza solo.
Luka 1 Bakonzi 17:24
14
1 Bakonzi 17:5
Eliya asalaki ndenge Yawe alobaki na ye : akendeki na lubwaku ya Keriti na ngambo ya este ya Yordani mpe avandaki kuna.
Luka 1 Bakonzi 17:5
15
1 Bakonzi 17:22
Yawe ayanolaki libondeli ya Eliya mpe azongisaki pema kati na mwana mobali, bongo mwana yango azongaki lisusu na bomoi.
Luka 1 Bakonzi 17:22