1
1 Bakonzi 22:22
Mokanda na Bomoi
MNB
Molimo yango ezongisaki : « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. » Yawe alobaki : « Solo, okolonga kokosa ye ! Kende mpe sala bongo. »
Kokisana
Luka 1 Bakonzi 22:22
2
1 Bakonzi 22:23
Mpe sik’oyo, tala, Yawe atie molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na yo oyo nyonso ; Yawe azwi penza mokano ya koboma yo !
Luka 1 Bakonzi 22:23
3
1 Bakonzi 22:21
Mpe na suka na nyonso, molimo moko epusanaki, etelemaki liboso ya Yawe mpe elobaki : « Ngai oyo ! Nakokosa ye. » Yawe atunaki molimo yango : « Okosala yango ndenge nini ? »
Luka 1 Bakonzi 22:21
4
1 Bakonzi 22:20
Yawe atuni : « Nani akokosa Akabi mpo ete akende kobundisa Ramoti ya Galadi mpe akufa kuna ? » Bazongisaki, moko na moko na ndenge na ye.
Luka 1 Bakonzi 22:20
5
1 Bakonzi 22:7
Kasi Jozafati atunaki lisusu : — Ezali lisusu na mosakoli moko te awa oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe ?
Luka 1 Bakonzi 22:7