1
1 Bakonzi 3:9
Mokanda na Bomoi
MNB
Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?
Kokisana
Luka 1 Bakonzi 3:9
2
1 Bakonzi 3:12
nakosala nyonso oyo osili kosenga. Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele, na lolenge oyo natikala nanu te kopesa na moto moko liboso na yo ; mpe sima na yo, moto moko te akotikala kozala lokola yo.
Luka 1 Bakonzi 3:12
3
1 Bakonzi 3:11
Nzambe alobaki na ye : — Lokola osengi bwanya, kasi osengi bomoi molayi te to bomengo mpo na yo moko te ; lokola osengi kufa ya banguna na yo te, kasi osengi bwanya mpo na kokata makambo na bosembo
Luka 1 Bakonzi 3:11
4
1 Bakonzi 3:13
Nakopesa yo lisusu oyo osengi te : bomengo mpe lokumu. Na bongo, na bomoi na yo mobimba, mokonzi moko te akokokana na yo.
Luka 1 Bakonzi 3:13
5
1 Bakonzi 3:14
Mpe soki otamboli na banzela na Ngai, otosi malako mpe mitindo na Ngai ndenge tata na yo, Davidi, asalaki, nakopesa yo bomoi molayi.
Luka 1 Bakonzi 3:14
6
1 Bakonzi 3:5
Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye : — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.
Luka 1 Bakonzi 3:5
7
1 Bakonzi 3:7
Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na ngai, okomisi mowumbu na Yo mokonzi na esika ya Davidi, tata na ngai. Kasi nazali nanu elenge mpe nayebi te ndenge nini nakoki komema mokumba oyo.
Luka 1 Bakonzi 3:7
8
1 Bakonzi 3:10
Nkolo asepelaki na likambo oyo Salomo asengaki.
Luka 1 Bakonzi 3:10
9
1 Bakonzi 3:6
Salomo azongisaki : — Otalisi bolamu monene epai ya tata na ngai, Davidi, mosali na Yo, pamba te atambolaki na boyengebene mpe na bosembo na miso na Yo ; okobaki kotalisa ye bolamu monene na Yo mpe opesi ye mwana mobali oyo avandi lelo na kiti na ye ya bokonzi.
Luka 1 Bakonzi 3:6
10
1 Bakonzi 3:8
Mowumbu na Yo azali awa kati na bato oyo oponi : bato ebele oyo bakoki kotanga motango na bango te mpo ete bazali ebele penza.
Luka 1 Bakonzi 3:8