1
1 Samuele 12:24
Mokanda na Bomoi
MNB
Kasi, na ngambo na bino, botosa Yawe mpe bosalela Ye na bosembo mpe na mitema na bino mobimba ; botala malamu makambo minene oyo asalelaki bino.
Kokisana
Luka 1 Samuele 12:24
2
1 Samuele 12:22
Mpo na lokumu ya Kombo monene na Ye, Yawe akobwaka bato na Ye te, pamba te asepelaki kokomisa bino bato na Ye moko.
Luka 1 Samuele 12:22
3
1 Samuele 12:20
Samuele azongiselaki bango : — Bobanga te ! Solo, bosalaki mabe nyonso wana ; nzokande bokoba te kozala mosika na Yawe, kasi bosalela Yawe na mitema na bino mobimba.
Luka 1 Samuele 12:20
4
1 Samuele 12:21
Bopengwa te na kolanda banzambe na bino ya bikeko, oyo ezanga na yango tina, oyo ekoki kosalela bino ata bolamu moko te, oyo ekoki te kobikisa bino, pamba te ezali banzambe ezanga tina.
Luka 1 Samuele 12:21