Bongo Samuele atunaki Izayi :
— Boni, bana na yo ya mibali bakoki bango nyonso ?
Izayi azongisaki :
— Te ! Ezali lisusu na moko oyo aleki bolenge, kasi azali koleisa bampate.
Samuele alobaki :
— Bengisa ye, pamba te tokovanda na mesa te soki akomi nanu te.