Bongo, Saulo alobaki na basali na ye :
— Bolukela ngai mwasi oyo asololaka na bakufi mpo ete nakende kotuna ye.
Basali na ye bazongisaki :
— Tala, ezali na mwasi moko na Eyini-Dori.
Boye Saulo amibongolaki, alataki bilamba mosusu mpe akendeki epai ya mwasi yango, na butu, elongo na mibali mibale. Alobaki :
— Nabondeli yo, solola na bakufi mpo na ngai, mpe bimisela ngai moto oyo nakotanga kombo na ye.