1
2 Bakonzi 5:1
Mokanda na Bomoi
MNB
Namani, mokonzi ya basoda ya mokonzi ya Siri, azalaki moto monene mpe moto ya lokumu mingi na miso ya nkolo na ye, pamba te, na nzela na ye, Yawe apesaki bato ya Siri elonga. Azalaki soda ya mpiko, kasi azalaki na bokono ya maba.
Kokisana
Luka 2 Bakonzi 5:1
2
2 Bakonzi 5:10
Elize atindaki moto moko mpo na koyebisa Namani : — Kende kosukola mbala sambo na ebale Yordani ; bongo nzoto na yo ekobongwana, mpe okokoma peto.
Luka 2 Bakonzi 5:10
3
2 Bakonzi 5:14
Boye Namani akitaki mpe amizindisaki mbala sambo na ebale Yordani, ndenge moto na Nzambe ayebisaki ye ; mpe nzoto na ye ebongwanaki mpe ekomaki peto lokola nzoto ya elenge mobali.
Luka 2 Bakonzi 5:14
4
2 Bakonzi 5:11
Kasi Namani asilikaki, azongaki mpe alobaki : — Nakanisaki ete akoya penza epai na ngai, akobelela Yawe, Nzambe na ye, akotia loboko na ye na esika oyo bokono ezali, mpe akobikisa ngai na bokono na ngai ya maba !
Luka 2 Bakonzi 5:11
5
2 Bakonzi 5:13
Kasi basali na ye bapusanaki mpe balobaki na ye : — Nkolo, soki mosakoli ayebisaki yo ete osala likambo moko ya monene, boni, olingaki kosala yango te ? Bongo mpo na nini te koleka, tango azali koloba na yo : « Sukola, mpe okokoma peto ! »
Luka 2 Bakonzi 5:13
6
2 Bakonzi 5:3
Elenge mwasi yango alobaki na nkolo na ye ya mwasi : — Ah, soki kaka nkolo na ngai, Namani, akokaki komona mosakoli oyo azali kati na Samari ! Akoki penza kobikisa ye na bokono na ye ya maba.
Luka 2 Bakonzi 5:3
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo