Nzambe oyo azali Libanga ya Isalaele ayebisi ngai :
‹ Mokonzi oyo akambaka bato kati na bosembo mpe botosi epai ya Nzambe,
azali lokola pole ya tongo, tango moyi ebimaka
mpe engalaka makasi lokola nde mapata ezali te,
lokola kongenga ya sima na mvula
oyo ebimisaka matiti na mokili. ›