Bokende na likolo ya bangomba, bokata mpe boya na banzete mpo na kotonga Tempelo, bongo nakosepela mpe nakozwa lokumu, » elobi Yawe. « Tala, bokanisaki kobuka bambuma ebele kasi bobuki kaka bambuma moke ; mpe tango bomemi yango na bandako na bino, nafuli yango mopepe. Mpo na nini boye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ? « Ezali mpo na Ndako na Ngai, oyo ezali ya kobeba, na tango oyo moto na moto azali komipesa na misala ya ndako na ye moko.