1
Ezayi 54:17
Mokanda na Bomoi
MNB
Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga ; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.
Kokisana
Luka Ezayi 54:17
2
Ezayi 54:10
Ata bangomba milayi eningani, ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango, bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te, mpe boyokani na Ngai ya kimia ekotikala kolongwa te, elobi Yawe oyo alingaka yo.
Luka Ezayi 54:10
3
Ezayi 54:4
Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te ! Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te ! Okobosana soni ya bolenge na yo mpe okokanisa lisusu te pasi na yo ya kokufisa mobali
Luka Ezayi 54:4
4
Ezayi 54:5
pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.
Luka Ezayi 54:5
5
Ezayi 54:2
Yeisa ndako na yo ya kapo monene, bakisa bakapo na ndako yango mpo ete eya monene ; kokanga motema te ! Benda na molayi basinga na yo mpe pika banzete na yo makasi !
Luka Ezayi 54:2
6
Ezayi 54:13
Yawe akoteya bana na yo nyonso, mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.
Luka Ezayi 54:13
7
Ezayi 54:8
Mpo ete nazalaki na kanda makasi, nabombelaki yo elongi na Ngai kaka mpo na tango moke ; kasi nakolakisa yo bolamu mpo na bolingo oyo ezangi suka, elobi Yawe, Mosikoli na yo.
Luka Ezayi 54:8
8
Ezayi 54:7
Nasundolaki yo kaka mpo na tango moke ; kasi na bolingo nyonso, nakozongisa yo.
Luka Ezayi 54:7
9
Ezayi 54:9
Na miso na Ngai, ezali lokola na mikolo ya Noa, tango nalapaki ndayi ete mayi ya Noa ekozindisa lisusu mabele te. Boye, nalapi solo ndayi sik’oyo ete nakosilikela yo lisusu te mpe nakopamela yo lisusu te.
Luka Ezayi 54:9
10
Ezayi 54:12
nakotonga bamir ya lopango na yo na mabanga ya ribi, nakosala bikuke na yo na biloko ya ngelingeli, mpe bamir na yo nyonso, na mabanga ya talo.
Luka Ezayi 54:12