22
Kufa mpe lisekwa ya Yesu
Yuda andimi koteka Yesu
(Mat 26.1-5, 14-16; Mlk 14.1-2, 10-11; Yn 11.47-53)
1Wana feti ya Mapa ezanga levire, feti oyo babengaka Pasika, ekomaki pene, 2bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini koboma Yesu, pamba te bazalaki kobanga bato.
3Bongo Satana akotaki kati na Yuda oyo bazalaki kobenga « Isikarioti » mpe azalaki moko kati na bantoma zomi na mibale. 4Boye, Yuda akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpo na kobongisa elongo na bango ndenge nini akoteka Yesu epai na bango. 5Basepelaki mingi mpe bayokanaki ete bakopesa ye mbongo. 6Yuda andimaki mpe akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu na maboko na bango, na ndenge ete ebele ya bato bayeba te.
Yesu alie Pasika elongo na bayekoli na Ye
(Mat 26.17-19; Mlk 14.12-16)
7Awa ekomaki mokolo ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo basengeli koboma mpate lokola mbeka ya Pasika, 8Yesu atindaki Petelo mpe Yoane ; alobaki na bango :
— Bokende kobongisela biso bilei ya Pasika.
9Batunaki Ye :
— Esika nini olingi ete tobongisa yango ?
10Yesu azongiselaki bango :
— Tango bokokota na engumba, bokokutana na mobali moko amemi eloku ya mayi. Bolanda ye kino na ndako epai wapi akokota. 11Mpe boloba na nkolo ndako : « Moteyi atuni : ‹ Wapi shambre epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »
12 Akolakisa bino, na etaje, shambre moko ya monene babongisa malamu ; ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika.
13Bakendeki, bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.
(Mat 26.26-29; Mlk 14.22-25; tala 1Kl 11.23-26)
14Tango ngonga ekokaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bantoma. 15Alobaki na bango :
— Nayokaki posa makasi ya kolia Pasika oyo elongo na bino liboso ete namona pasi, 16pamba te, nazali koloba na bino : nakolia yango lisusu te kino tina na yango ekokokisama penza kati na Bokonzi ya Nzambe.
17Sima na Ye kozwa kopo, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe alobaki :
— Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino, 18pamba te nazali koloba na bino : nakomela lisusu te vino kowuta na bambuma ya vino, kino Bokonzi ya Nzambe eya.
19Bongo, azwaki lipa mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki bango yango ; alobaki :
— Oyo ezali nzoto na Ngai, epesami mpo na bino ! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai.
20Sima na Ye kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo ; alobaki :
— Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai, makila oyo esopani mpo na bino.
(Mat 26.20-25; Mlk 14.17-21)
21 Nzokande, moto oyo azali koteka Ngai azali awa, azali kolia mesa moko elongo na Ngai. 22Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge Nzambe akata ; kasi mawa na moto oyo azali koteka Ye.
23Bongo bantoma bakomaki kotunana bango na bango mpo na koluka koyeba soki nani kati na bango akosala likambo yango.
Nani aleki monene
(Mat 20.24-28; 19.28; Mlk 10.41-45)
24Tembe moko ebimaki kati na bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.
25Yesu alobaki na bango :
— Bakonzi ya bikolo bakonzaka yango, mpe bayangeli na yango balingaka ete babenga bango bato malamu. 26Kasi esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto oyo aleki monene kati na bino azala lokola leki ya suka, mpe moto oyo azali kokamba azala lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa. 27Pamba te nani aleki monene ? Ye oyo avandi na mesa to ye oyo azali kotia bilei na mesa ? Ezali te oyo avandi na mesa ? Kasi Ngai nazali kati na bino lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.
(Mat 19.28)
28 Bino nde bato oyo botikali ya kokangama na Ngai kati na pasi na Ngai. 29Mpe lokola Tata na Ngai apesaki Ngai bokonzi, Ngai mpe nazali kopesa bino bokonzi, 30mpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.
Yesu asakoli ete Petelo akowangana Ye
(Mat 26.31-35; Mlk 14.27-31; Yn 13.36-38)
31 Simona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble. 32Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.
33Kasi Petelo azongisaki :
— Nkolo, nandimi kokota boloko to kokufa elongo na Yo.
34Yesu alobaki na ye :
— Petelo, nazali koloba na yo : lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.
35Bongo Yesu atunaki bango :
— Tango natindaki bino maboko pamba, mbongo te, sakosi te, basandale te ; boni, bozangaki eloko ?
Bazongisaki :
— Tozangaki eloko te.
36Alobaki na bango :
— Kasi, sik’oyo, tika ete moto oyo azali na mbongo azwa yango, oyo azali na sakosi azwa yango, oyo azangi mopanga ateka elamba na ye mpo na kosomba yango ! 37Ekomama : « Batangaki Ye elongo na babomi bato ; » mpe nazali koloba na bino : makambo yango esengeli kokokisama kati na Ngai.
38Bayekoli balobaki :
— Nkolo, tala mipanga mibale.
Yesu azongisaki :
— Ekoki !
Yesu, na ngomba ya banzete ya olive
(Mat 26.36-46; Mlk 14.32-42)
39Yesu abimaki mpe akendeki lokola momesano na ngomba ya banzete ya olive, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye. 40Tango akomaki na esika yango, alobaki na bango :
— Bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
41Akendeki mwa mosika na bango, afukamaki mpe asambelaki boye : 42« Tata, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo. » [43Anjelu moko awutaki na Likolo, abimelaki Ye mpe alendisaki Ye. 44Lokola azalaki koyoka somo makasi, asambelaki lisusu makasi koleka, kino motoki na Ye ekomaki lokola matanga ya makila oyo ekomaki kokweya na mabele.]#22.44 Biteni oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.
45Tango asilisaki kosambela, atelemaki, akendeki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi, mpo ete batondaki na mawa.
46Atunaki bango :
— Mpo na nini bozali kolala ? Botelema mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
Bakangi Yesu
(Mat 26.47-55; Mlk 14.43-49; Yn 18.2-11)
47Wana Yesu azalaki nanu koloba, ebele ya bato bayaki ; mpe moto oyo bazalaki kobenga « Yuda, » moko kati na bayekoli zomi na mibale, azalaki liboso na bango. Apusanaki pene ya Yesu mpo na koyamba Ye, 48kasi Yesu atunaki ye :
— Yuda, ozali penza koteka Mwana na Moto na nzela ya beze ?
49Tango bato oyo bazalaki elongo na Yesu bamonaki makambo oyo ezali kosalema, batunaki Ye :
— Nkolo, tobeta bango na nzela ya mipanga na biso ?
50Mpe moko kati na bango abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mopanga mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali. 51Kasi Yesu alobaki :
— Boye lisusu te !
Yesu asimbaki litoyi ya mobali yango mpe abikisaki ye.
52Bongo Yesu alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe na bakambi ya bato, oyo bayaki kokanga Ye :
— Boni, nakomi mokambi ya batomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe banzete ? 53Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.
Petelo awangani Yesu
(Mat 26.57-58; Mlk 14.53–15.1; Yn 18.13-27)
54Bakangaki Yesu, bamemaki Ye kati na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Petelo azalaki kolanda na mosika. 55Mpe tango bapelisaki moto na kati-kati ya lopango mpe bavandaki lisanga, Petelo mpe avandaki elongo na bango.
(Mat 26.69-75; Mlk 14.66-72; Yn 18.17-18, 25-27)
56Mwasi mosali moko amonaki Petelo avandi wana pembeni ya moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki :
— Tata oyo azalaki elongo na Yesu !
57Kasi Petelo awanganaki mpe alobaki :
— Mwasi, nayebi ye te.
58Sima na mwa tango moke, moto mosusu amonaki Petelo mpe alobaki :
— Yo mpe ozali moko kati na bango !
Petelo azongisaki :
— Tata, nazali moko te kati na bango.
59Sima na ngonga moko, moto mosusu alobaki na molende :
— Ezali ya solo ! Tata oyo azalaki elongo na ye, pamba te azali moto ya Galile.
60Kasi Petelo azongisaki :
— Nayebi te makambo oyo ozali kolobela !
Wana azalaki nanu koloba, soso elelaki. 61Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » 62Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.
(Mat 26.67-68; Mlk 14.65)
63Bato oyo bazalaki kokengela Yesu babandaki koseka mpe kobeta Ye. 64Bazipaki Ye elongi mpe basengaki na makasi :
— Sakola : Nani abeti Yo ?
65Mpe balobaki na Ye maloba mabe ebele mpo na kofinga Ye.
Yesu asambi
(Mat 26.59-65; 27.1; Mlk 14.55-64; Yn 18.19-24)
66Tango tongo etanaki, bakambi ya bato, elongo na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko, basanganaki mpe basengaki ete bamema Yesu liboso ya Likita-Monene na bango. 67Balobaki :
— Soki ozali Klisto, yebisa biso.
Yesu azongisaki :
— Ata nayebisi bino, bokondima na bino kaka Ngai te ; 68mpe soki Ngai napesi bino motuna, bokopesa na bino mpe Ngai eyano te. 69Kasi kobanda sik’oyo, Mwana na Moto akovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
70Bango nyonso batunaki :
— Ozali Mwana na Nzambe ?
Yesu azongisaki :
— Bino nde bolobi ete nazali Mwana na Nzambe.
71Bongo balobaki :
— Mpo na nini koluka matatoli mosusu ? Toyoki yango na monoko na ye moko.