Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Ezayi 58:4-5 - Compare All Versions

Ezayi 58:4-5 MNB (Mokanda na Bomoi)

Kokila bilei na bino ezali kosuka na koswana mpe na bitumba, bozali kobetana makofi na kanda nyonso ; bozali kokila bilei te ndenge esengeli kozala na mokolo oyo bozali kozela ete mongongo na bino eyokana na likolo. Boni, ezali penza kokila bilei oyo Ngai nalingaka, mokolo oyo moto amikitisaka penza ye moko ? Boni, ezali kaka kogumba moto lokola nzete oyo ebotaka na mayi, kolata bilamba ya saki mpe kolala na putulu ? Ezali yango nde bino bozali kobenga kokila bilei, mokolo oyo Yawe alingaka ?