Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Jeremi 17:5-6 - Kokɔla Mafɔ Nyonso

Jeremi 17:5-6 MNB (Mokanda na Bomoi)

Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tika ete moto oyo atiaka elikya na moto, oyo ayekamelaka eloko ya pete mpe atalelaka Yawe te, alakelama mabe ! Akozala lokola mwa nzete ekawuka kati na esobe ; akomona bolamu te tango ekoya, akovanda na bisika ya kokawuka ya esobe, na mokili ya mungwa epai wapi bato bazalaka te.