Matayo 16:5-12 - Kokɔla Mafɔ Nyonso
Matayo 16:5-12 MNB (Mokanda na Bomoi)
Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mapa. Yesu alobaki na bango : — Bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo ! Bayekoli bakomaki kokanisa mpe komituna bango na bango : — Azali koloba bongo mpo ete tomemi mapa te ! Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki : — Bato ya kondima moke ! Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ? Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ? Bobosani penza mapa mitano oyo bokabolelaki bato nkoto mitano, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ? Bobosani lisusu mapa sambo oyo bokabolelaki bato nkoto minei, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ? Ndenge nini bozali kososola te ete nazalaki koloba na tina na mapa te, tango nalobaki na bino : bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo ? Boye, bayekoli basosolaki ete alobaki na bango te ete basala keba na levire ya mapa, kasi nde basala keba na mateya ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo.