Masese 6:16-19
Masese 6:16-19 Mokanda na Bomoi (MNB)
Yawe ayinaka makambo wana motoba ; mpe makambo oyo sambo ezali mabe penza na miso na Ye : Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te, motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe, makolo oyo epotaka mbangu na mabe, motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.
Kabola
Tanga Masese 6