Logo ya Aplikasyo ya Biblia
Elilingi ya Boluki

Barome 3:23-26 - Kokɔla Mafɔ Nyonso

Barome 3:23-26 MNB (Mokanda na Bomoi)

pamba te bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe ; mpe bato nyonso bakomi bato ya sembo na ofele, na ngolu na Ye, na nzela ya lisiko kati na Yesu-Klisto. Nzambe akabaki Klisto lokola mbeka mpo ete, na nzela ya kosopa makila na Ye, Klisto azwa bolimbisi masumu ya bato oyo bazali kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye, pamba te, na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango. Nzambe asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye na tango oyo, mpo ete Ye moko azala Sembo mpe atanga lokola moto ya sembo, moto oyo azali kondimela Yesu.