« Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te !
Oh Isalaele, kobanga te ;
nakobikisa yo solo wuta na mokili ya mosika,
nabikisa bakitani na yo wuta na mokili ya bowumbu.
Jakobi akozala lisusu na kimia mpe na bobatelami malamu,
moto moko te akobangisa ye lisusu.