Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bato ya Filisitia liboso ete Faraon abundisa Gaza :
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Tala ndenge nini mayi ezali kotomboka na nor,
etondi lokola ebale oyo etondi mayi ;
ekozindisa mokili mpe biloko nyonso kati na yango,
bingumba mpe bavandi na yango nyonso.
Bato bakoganga, bavandi nyonso ya mokili bakolela