Jeremi 47
47
Kosambisama ya bato ya Filisitia
1Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bato ya Filisitia liboso ete Faraon abundisa Gaza :
2Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Tala ndenge nini mayi ezali kotomboka na nor,
etondi lokola ebale oyo etondi mayi ;
ekozindisa mokili mpe biloko nyonso kati na yango,
bingumba mpe bavandi na yango nyonso.
Bato bakoganga, bavandi nyonso ya mokili bakolela
3tango bakoyoka makelele ya bampunda koleka na lombangu,
lokito ya bashar ya banguna
mpe makelele ya bapine na yango.
Batata bakozala lisusu na tango te
ya kosunga bana na bango
mpo ete maboko na bango ekolemba.
4Pamba te mokolo ekoki
mpo na kobebisa bato nyonso ya Filisitia
mpe kosilisa koboma batikali nyonso
oyo bakoluka kosunga bingumba Tiri mpe Sidoni.
Yawe akomi pene ya kobebisa bato ya Filisitia,
batikali ya esanga ya Kafitori.
5Bakokokola suki ya moto ya Gaza
lokola elembo ya matanga,
Ashikeloni ekokanga monoko !
Oh bino batikali kati na etando oyo ya lubwaku,
kino tango nini bokotika komizokisa ?
6Bozali koganga : ‹ Ah mopanga ya Yawe,
okopema tango nini ?
Zonga na ebombelo na yo,
tika koboma mpe zala kimia ! ›
7Kasi ndenge nini ezala kimia
tango Yawe apesi yango mitindo
ya kobundisa Ashikeloni mpe mikili
oyo ezali pembeni ya ebale monene ? »
Currently Selected:
Jeremi 47: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.