Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

2 Bakonzi 4

4
Mafuta ya mwasi akufisa mobali
1Mwasi moko kati na basi ya bayekoli ya basakoli abondelaki Elize :
— Mosali na yo, mobali na ngai, akufa. Oyebi malamu ete azalaki kotosa Yawe. Kasi moto oyo adefisaki ye niongo ayei mpo na kozwa bana na ngai mibale ya mibali mpo ete bakoma bawumbu na ye.
2Elize azongiselaki ye :
— Ndenge nini nakoki kosunga yo ? Yebisa ngai eloko oyo ozali na yango kati na ndako na yo.
Azongisaki :
— Mwasi mowumbu na yo azali na eloko moko te, longola kaka mwa mafuta.
3Elize alobaki :
— Kende kosenga na baninga na yo nyonso bambeki ya pamba, kosenga moke te. 4Sima, zonga na ndako na yo, kanga ekuke sima na yo elongo na bana na yo ya mibali ; sopa mafuta kati na mbeki moko na moko, mpe tia pembeni mbeki oyo etondi.
5Atikaki Elize mpe akangaki ekuke sima na ye elongo na bana na ye ya mibali. Bana na ye bazalaki kopesa ye bambeki, mpe azalaki kotondisa yango na mafuta. 6Tango bambeki nyonso etondaki, alobaki na moko kati na bana na ye ya mibali :
— Pesa ngai lisusu mbeki moko.
Kasi mwana yango azongiselaki ye :
— Bambeki nyonso esili.
Kaka na tango yango, mafuta etikaki kobima. 7Mwasi yango akendeki koyebisa moto na Nzambe. Mpe moto na Nzambe alobaki na ye :
— Kende, teka mafuta yango mpe futa niongo na yo ; bongo, yo elongo na bana na yo ya mibali, bokobika na oyo ekotikala.
Elize mpe mwasi ya Sunami
8Mokolo moko, Elize akendeki na Sunemi. Mpe kuna, mwasi moko ya bomengo atungisaki ye mpo na kosenga na ye ete andima kolia na ndako na ye. Boye, tango nyonso Elize azalaki kolekela na Sunami, azalaki kotelema na ndako ya mwasi yango mpo na kolia. 9Mwasi yango alobaki na mobali na ye : « Nayebi ete moto oyo ayaka mbala mingi epai na biso azali mobulami ya Nzambe. 10Nabondeli yo, tika ete tobongisela ye shambre ya moke na likolo ya ndako mpe totia kati na yango mbeto, mesa, kiti mpe mwinda. Boye, tango nyonso akoya epai na biso, akoki kovanda kuna. »
11Mokolo moko, Elize ayaki na Sunami, amataki na shambre na ye mpe alalaki kuna. 12Bongo alobaki na mosali na ye, Geazi : « Benga mwasi oyo ya Sunami. » Geazi abengaki mwasi ya Sunami, mpe mwasi yango ayaki kotelema liboso ya Elize. 13Elize alobaki na Geazi :
— Loba na ye : « Omitungisi mingi mpo na biso. Eloko nini tokoki sik’oyo kosalela yo ? Tolobela yo epai ya mokonzi to epai ya mokonzi ya basoda ? »
Mwasi ya Sunami azongisaki :
— Navandaka na kimia kati na bato na ngai.
14Elize atunaki mosali na ye, Geazi :
— Eloko nini tokoki kosala mpo na ye ?
Geazi azongisaki :
— Azali na mwana te, mpe mobali na ye azali mobange.
15Elize alobaki :
— Benga ye !
Geazi abengaki ye, mpe ayaki kotelema na ekuke.
16Elize alobaki :
— Na mobu oyo ekoya, na eleko oyo, maboko na yo ekosimba mwana mobali.
Mwasi ya Sunami agangaki :
— Te, nkolo na ngai, moto na Nzambe, kopesa na ngai mwasi mosali na yo elikya ya lokuta te !
17Nzokande, mwasi ya Sunami akomaki na zemi. Mpe na mobu oyo elandaki, na eleko yango kaka, abotaki mwana mobali, ndenge kaka Elize alobaki na ye.
18Mwana akolaki. Mokolo moko, mwana akendeki epai ya tata na ye, oyo azalaki elongo na babuki mbuma. 19Alobaki na tata na ye :
— Moto pasi ! Moto pasi !
Tata na ye alobaki na mosali moko :
— Zongisa ye epai ya mama na ye !
20Mosali amemaki ye mpe akomisaki ye epai ya mama na ye. Mwana mobali avandaki na makolo ya mama na ye kino na midi mpe, na sima, akufaki. 21Mama na ye amataki na shambre ya mosakoli, alalisaki ye na mbeto ya moto na Nzambe, akangaki ekuke mpe abimaki. 22Bongo abengaki mobali na ye mpe alobaki na ye :
— Nabondeli yo, tindela ngai elenge moko kati na basali mpe ane moko ya mwasi, mpo ete nakende noki epai ya moto na Nzambe mpe nazonga mbala moko.
23Mobali na ye atunaki :
— Mpo na nini olingi kokende epai na ye lelo ? Lelo ezali ebandeli ya sanza te ! Ezali mpe mokolo ya Saba te !
Azongisaki :
— Komitungisa te ! Nyonso ezali malamu.
24Mwasi ya Sunami abongisaki ane mpe alobaki na elenge mosali na ye : « Tokeyi ! Tambolisa ane ; kotelema na nzela te soki nalobi na yo te. »
25Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi :
— Tala ! Ezali mwasi ya Sunami ! 26Nabondeli yo, pota mbangu sik’oyo mpo na kokutana na ye, mpe tuna ye : « Boni, kimia ezali ? Ozali malamu ? Mobali na yo azali malamu ? Mwana na yo azali malamu ? »
Azongisaki :
— Nyonso ezali malamu.
27Boye akobaki nzela na ye kino akomaki na ngomba, epai ya moto na Nzambe. Mpe amibwakaki na makolo na ye. Geazi apusanaki mpo na kolongola ye na makolo ya Elize, kasi moto na Nzambe alobaki :
— Tika ye bongo ! Azali na pasi makasi kati na motema na ye, kasi Yawe abombeli ngai yango mpe atalisi ngai te tina na yango.
28Mwasi ya Sunami alobaki :
— Boni, nasengaki mwana epai ya nkolo na ngai ? Te ! Kutu, nalobaki na yo : « Kopesa ngai elikya ya lokuta te ! »
29Elize alobaki na Geazi :
— Lata mokaba na yo, kamata nzete na ngai na loboko na yo mpe kende. Soki okutani na moto na nzela, kopesa ye mbote te. Mpe soki moto apesi yo mbote, kozongisa te. Okotia nzete na ngai na elongi ya mwana mobali.
30Kasi mama ya mwana alobaki :
— Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te.
Boye Elize atelemaki mpe alandaki mwasi ya Sunami. 31Geazi akendeki liboso na bango mpe atiaki nzete na elongi ya mwana mobali, kasi ata eloko moko te esalemaki, ezala mongongo to koningana. Geazi azongaki mpo na kokutana na Elize mpe alobaki na ye :
— Mwana alamuki te.
32Tango Elize akomaki na ndako, akutaki ebembe ya mwana mobali elali na mbeto na ye. 33Elize akotaki, amikangelaki na shambre elongo na mwana mobali, mpe asambelaki Yawe. 34Bongo Elize amataki na mbeto mpe alalelaki mwana mobali, atutisaki monoko na ye na monoko ya mwana, miso na ye na miso ya mwana, mpe maboko na ye na maboko ya mwana. Lokola amitandaki bongo na likolo ya mwana mobali, nzoto ya mwana mobali ekomaki moto. 35Elize alongwaki, atambolaki na bangambo nyonso ya shambre ; bongo amataki lisusu na mbeto mpe amitandaki na likolo ya mwana. Mbala moko, mwana akosolaki mbala sambo mpe afungolaki miso. 36Elize abengaki Geazi mpe alobaki na ye :
— Benga mwasi ya Sunami !
Geazi abengaki ye. Tango ayaki epai ya Elize, Elize alobaki :
— Zwa mwana na yo !
37Mwasi ya Sunami apusanaki, akweyaki na makolo ya Elize mpe agumbamaki kino na se ; bongo azwaki mwana na ye mpe abimaki.
Elize apetoli bilei
38Elize azongaki na Giligali. Nzokande etuka yango ezalaki kati na nzala makasi. Wana bayekoli ya basakoli bavandaki na mayangani elongo na Elize, alobaki na mosali na ye : « Tia nzungu ya monene na moto mpe lamba elubu mpo na basakoli oyo. »
39Moko kati na bango akendeki na bilanga mpo na kobuka ndunda, mpe amonaki nzete ya vino ya zamba. Abukaki na nzete yango ndambo ya bakolokente#4.39 Kolokente ezali bambuma oyo ebotaka na nzete ya vino ya zamba, ekokana na bambuma ya mbika. mpe atondisaki yango na elamba na ye. Tango azongaki, akataki yango mike-mike mpe atiaki yango kati na nzungu ya elubu ; moto moko te ayebaki soki ezali nini. 40Bakabolelaki bato elubu. Tango kaka babandaki kolia yango, bagangaki :
— Moto na Nzambe, kufa ezali kati na nzungu oyo !
Mpe bakokaki lisusu te kolia yango. 41Elize alobaki :
— Bomemela ngai farine !
Atiaki farine kati na nzungu mpe alobaki :
— Bokabolela yango bato mpo ete balia.
Mpe kati na elubu oyo ezalaki kati na nzungu, ezalaki lisusu na eloko moko te ya mabe.
Elize aleisi bato ebele
42Moto moko awutaki na Bala-Shalisha, amemelaki moto na Nzambe mapa tuku mibale ya orje#4.42 Orje ezali mbuma oyo basalelaka mapa ya talo moke. Mbuma yango ezali lokola loso. oyo ewutaki na bambuma ya liboso ya elanga, elongo na saki moko ya bambuma ya ble. Elize alobaki na mosali na ye :
— Pesa yango na bato mpo ete balia !
43Mosali na ye atunaki :
— Nakokoka ndenge nini kokabola mapa oyo na bato nkama moko ?
Elize alobaki lisusu :
— Kabolela yango bato nyonso mpo ete balia, pamba te tala Liloba oyo Yawe alobi : « Bakolia, bakotonda mpe bakotika mosusu. »
44Boye mosali akabolelaki bango mapa yango. Baliaki mpe batikaki mosusu, kolanda Liloba na Yawe.

Currently Selected:

2 Bakonzi 4: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo