Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Ezekieli 2

2
Kobengama ya mosakoli Ezekieli
1Alobaki na ngai : « Mwana na moto, telema na makolo na yo ; pamba te nazali na likambo ya koyebisa yo. »
2Wana azalaki nanu koloba, Molimo akotaki kati na ngai mpe atelemisaki ngai na makolo na ngai ; bongo nakomaki koyoka Ye koloba na ngai. 3Alobaki na ngai : « Mwana na moto, nazali kotinda yo epai ya bana ya Isalaele, ekolo ya bato ya mito makasi, bato oyo batombokelaka ngai. Wuta kala kino na mokolo ya lelo, bango mpe batata na bango batombokelaka kaka ngai. 4Bato oyo epai wapi nazali kotinda yo, bazali mito makasi mpe mitema mabanga. Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › 5Boye, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, mpo ete bazali libota ya batomboki, bakososola solo ete mosakoli moko azali kati na bango.
6Bongo yo, mwana na moto, kobanga bango te mpe kobanga maloba na bango te, atako banzube mpe basende ezingeli yo mpe ozali kovanda elongo na koto#2.6 Koto, na esika oyo, elakisi : nyama oyo babengaka, na lifalanse, scorpion. Kozala na somo ya makambo oyo bazali koloba te mpe kolenga liboso na bango te atako bazali batomboki. 7Osengeli koyebisa bango maloba na ngai, ezala bayokeli yo to bayokeli yo te, mpo ete bazali batomboki.
8Kasi yo, mwana na moto, yoka makambo oyo nazali koloba na yo. Kotombokela ngai te lokola libota ya batomboki oyo ! Fungola monoko na yo mpe lia oyo nazali kopesa yo ! »
9Bongo natalaki mpe namonaki loboko moko esembolama kino epai na ngai mpe esimbaki mokanda lokola buku elingama. 10Loboko yango efungolaki mokanda yango liboso na ngai. Na bangambo na yango nyonso mibale, bakomaki : basango ya bileli, ya mikakatano mpe ya pasi.

Currently Selected:

Ezekieli 2: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo