Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Ba-Ebre 7

7
Melishisedeki aleki Aron
1Melishisedeki azalaki mokonzi ya Salemi mpe Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo. Ezali Melishisedeki nde akendeki kokutana na Abrayami, wana Abrayami azali kozonga sima na ye kolonga bakonzi ; mpe ezali Melishisedeki nde apambolaki Abrayami. 2Abrayami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.
Kombo ya Melishisedeki elakisi « mokonzi ya bosembo. » Azali lisusu mokonzi ya Salemi ; elingi koloba : mokonzi ya kimia. 3Azalaki na tata te, mama te, bakoko te, mokolo ya mbotama te, mpe mokolo ya kufa te ; azalaki lokola Mwana na Nzambe, mpe azali Nganga-Nzambe mpo na libela.
4Botala ndenge nini Melishisedeki azalaki moto monene mpo ete ezala Abrayami, koko na biso, apesa ye eteni ya zomi ya bomengo na ye ya bitumba ! 5Solo, Mibeko ya Moyize etindaki bana ya Levi, oyo bakomi Banganga-Nzambe kozwa biteni ya zomi epai ya bandeko na bango, bato ya Isalaele, oyo bazali mpe bato ya libota ya Abrayami. 6Kasi Melishisedeki oyo azalaki kutu moto ya libota ya Levi te azwaki eteni ya zomi ya Abrayami, mpe apambolaki moto oyo Nzambe apesaki bilaka. 7Nzokande, tembe ezali te ete ezali moto oyo azali na se nde azwaka lipamboli kowuta na moto oyo aleki ye.
8Botala lisusu : na ngambo moko, ezali bato oyo bakufaka nde bazali kozwa biteni ya zomi ; kasi na ngambo mosusu, kolanda Makomi, ezali moto na bomoi.
9Boye, na mokuse, tokoki koloba ete Levi oyo azwaka biteni ya zomi afutaki eteni ya zomi epai ya Melishisedeki na nzela ya Abrayami ; 10pamba te, tango Melishisedeki akutanaki na Abrayami, Levi azalaki nanu kati na mokongo ya koko na ye, Abrayami.
Klisto azali Nganga-Nzambe, kolanda molongo ya Melishisedeki
11Boye, soki bato oyo bazwaki mobeko bakokaki kokoma ya kokoka na nzela ya bonganga-Nzambe ya Balevi, mpo na nini kotia Nganga-Nzambe mosusu, kolanda molongo ya Melishisedeki, kasi kolanda molongo ya Aron te ?
12Nzokande, lokola bonganga-Nzambe ebongwani, mobeko mpe esengeli kobongwana. 13Pamba te makambo yango etali Nganga-Nzambe oyo azali ya libota ya Levi te, kasi ya libota oyo moto na yango moko te atikala kosala na etumbelo. 14Toyebi malamu ete Nkolo na biso azali ya libota ya Yuda, mpe Moyize atikalaki koloba eloko moko te na tina na bonganga-Nzambe ya libota ya Yuda.
15Likambo oyo tozali kolobela ekomi lisusu polele koleka awa Nganga-Nzambe mosusu abimi, Nganga-Nzambe oyo akokani na Melishisedeki ; 16akomi Nganga-Nzambe kolanda mibeko ya bomoto te, kasi kolanda nguya ya bomoi oyo ezali na suka te. 17Pamba te, tala litatoli oyo baloba na tina na Ye :
« Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela,
kolanda molongo ya Melishisedeki. »
18Boye, Nzambe alongolaki mobeko ya liboso mpo ete ezalaki makasi te mpe ezalaki na tina te. 19Solo, Mibeko ya Moyize ebongisaki eloko moko te. Kasi elikya ya malamu koleka epesameli biso, elikya oyo, na nzela na yango, topusanaka pene ya Nzambe.
Klisto, Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na libela
20Makambo wana nyonso esalemaki na nzela ya seleka oyo Nzambe akataki. Nzokande, mpo na Balevi, Nzambe akataki ata seleka te mpo ete bakoma Banganga-Nzambe. 21Kasi Yesu akomaki Nganga-Nzambe na nzela ya seleka, tango Nzambe alobaki na Ye :
« Nkolo akati seleka, mpe akobongola mokano na Ye te :
‹ Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela. › »
22Ezali na nzela ya seleka yango nde Yesu akoma ndanga ya boyokani oyo eleki motuya. 23Mpe lisusu, Banganga-Nzambe bazalaki kokitana ebele, pamba te kufa ezalaki kopekisa bango kosala mosala na bango libela na libela. 24Kasi mpo ete Yesu azali na bomoi seko na seko, Bonganga-Nzambe na Ye ezali mpo na libela. 25Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.
26Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo, 27azali na posa te, lokola bakonzi mosusu ya Banganga-Nzambe, ya kotumbaka mbeka mokolo na mokolo mpo na masumu na Ye moko liboso, mpe, na sima, mpo na masumu ya bato, pamba te atumbaki mbeka yango mpo na masumu na bango mbala moko mpo na libela tango amikabaki Ye moko.
28Bakonzi ya Banganga-Nzambe, oyo batiami na nzela ya Mibeko ya Moyize, bazali bato na bolembu ; kasi Mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo Nzambe atie na nzela ya maloba ya seleka, oyo eyaki sima na Mibeko ya Moyize, azali Mwana na Ye moko, oyo azali ya kokoka mpo na libela.

Currently Selected:

Ba-Ebre 7: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo