Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Yobo 14

14
1Moto oyo abotama na mwasi
azalaka kaka na mikolo moke
oyo mpe etonda na pasi.
2Akolaka mpe akawukaka lokola fololo,
awumelaka te lokola elili ya lipata oyo elekaka.
3Olingi kaka kolandela ekelamu ya boye ?
Olingi kaka komema ye liboso na Yo
mpo na kosambisa ye ?
4Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo ?
Moko te !
5Mikolo ya moto ekatama ;
okata motango ya basanza na ye
mpe otia mondelo oyo akoki koleka te.
6Longola miso na Yo mosika na ye
mpe tika ye, ye moko,
kino tango akozwa lifuti ya mosala na ye
lokola moto oyo asalaka kaka mpo na lifuti.
7Nzete ezalaka kutu na mwa elikya :
ata bakati yango, ebimaka lisusu
mpe ebotaka bitape ya sika ;
8misisa na yango ekoki konuna na se ya mabele,
mpe eteni na yango oyo etikalaka ekoki kokufa kati na mabele,
9nzokande soki kaka ezwi mayi, ekobimisa mito
mpe ekobota bitape lokola nzete ya sika.
10Kasi moto akufaka mpe aninganaka lisusu te,
akataka motema mpe azalaka lisusu na bomoi te.
11Ndenge mayi esilaka na liziba
to ndenge mayi ekawukaka,
12ndenge wana mpe moto akufaka mpe atelemaka lisusu te,
akolamuka lisusu te mpe bakoki lisusu kolamusa ye te,
tango nyonso likolo ekozala.
13Soki kaka obombaki ngai na se ya bakufi
mpe otikaki ngai kuna kino kanda na Yo esila !
Soki kaka okatelaki ngai tango
mpo ete, na sima na yango, okanisa ngai lisusu !
14Nzokande, soki moto akufi, boni, akoki lisusu
kozala na bomoi ?
Nakozela kino lolenge na ngai ebongwana.
15Okobenga ngai, mpe ngai, nakondima ;
okozala na posa makasi ya ekelamu ya maboko na Yo.
16Solo penza, okotanga makolo na ngai,
kasi okolandela lisusu masumu na ngai te.
17Mabe na ngai ekokangama kati na saki,
mpe okozipa masumu na ngai.
18Kasi, ndenge ngomba esilaka mpe ekweyaka,
ndenge libanga elongwaka na esika na yango,
19ndenge mayi eliaka mabanga,
ndenge mayi oyo etiolaka ememaka mabele,
ndenge wana mpe obebisaka elikya ya moto.
20Olongaka ye mbala moko, mpe akendaka na ye ;
obebisaka elongi na ye mpe obenganaka ye.
21Soki bana na ye ya mibali bazwi lokumu,
ayebaka na ye yango te ;
soki basambwisi bango, amonaka na ye yango te.
22Ayokaka kaka pasi kati na nzoto na ye,
mpe motema na ye esalaka kaka matanga mpo na ye moko. »

Oyo Eponami Sikoyo:

Yobo 14: MNB

Tya elembo

Kopya

Kokisana

Kabola

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo