Emoniseli 10
10
Anjelu mpe buku ya moke
1Bongo namonaki anjelu mosusu ya nguya makasi kokita wuta na Lola ; lipata moko ezipaki ye mpe monama ezingelaki moto na ye. Elongi na ye ezali kongenga lokola moyi, mpe makolo na ye ezalaki lokola makonzi ya moto. 2Na loboko na ye, asimbaki buku ya moke oyo ezalaki ya kofungwama. Atiaki lokolo na ye ya mobali na ebale monene, mpe oyo ya mwasi, na mokili ; 3bongo agangaki makasi lokola nkosi. Tango agangaki, bakake sambo ebetaki.
4Mpe tango kaka bakake sambo etikaki kobeta, namibongisaki mpo na kokoma ; kasi mongongo moko elobaki na ngai wuta na Lola : « Batela malamu makambo oyo bakake sambo ewuti koloba, kokoma yango te. »
5Bongo anjelu oyo namonaki atelemi na ebale monene mpe na mokili atombolaki loboko ya mobali na ngambo ya Lola 6mpe alapaki ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko, Ye oyo akela Lola mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango : « Kobanda sik’oyo, tango ya kozela ezali lisusu te ! 7Kasi na mokolo oyo anjelu ya sambo akobeta kelelo na ye, mabombami ya Nzambe ekokokisama ndenge kaka asakolaki yango na basali na Ye, basakoli. »
8Bongo mongongo oyo nayokaki wuta na Lola elobaki na ngai lisusu : « Kende, zwa buku oyo ezali ya kofungwama na loboko ya anjelu oyo atelemi na ebale monene mpe na mokili. »
9Boye, nakendeki epai ya anjelu mpe nasengaki na ye ete apesa ngai buku wana ya moke. Alobaki na ngai : « Kamata mpe lia yango. Ekokoma bololo na libumu na yo ; kasi na monoko na yo, ekozala sukali lokola mafuta ya nzoyi. »
10Nakamataki buku yango na loboko ya anjelu mpe naliaki yango. Na monoko na ngai, ezalaki sukali lokola mafuta ya nzoyi ; kasi sima na ngai kolia yango, ekomaki bololo kati na libumu na ngai. 11Bongo balobaki na ngai : « Osengeli lisusu kosakola na tina na bikolo ebele, mabota ebele, nkota ebele mpe bakonzi ebele. »
Currently Selected:
Emoniseli 10: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.