Nini boluki epesi
Kobima 21:23 (MNB)
Kasi soki likama ezali, okofuta bomoi mpo na bomoi :
1 Bakolinto 15:46 (MNB)
Ezali te bomoi ya molimo nde eyaki liboso, ezali nde bomoi ya bomoto ; bomoi ya molimo eyaki na sima.
Banzembo 61:7 (MNB)
Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi ; tika ete awumela na bomoi.
Masese 10:27 (MNB)
Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi, kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse.
Yoane 1:4 (MNB)
Bomoi ewuta epai na Ye, mpe bomoi yango ezalaki pole mpo na bato.
Yobo 7:1 (MNB)
Boni, bomoi ya moto awa na se ezali kaka bomoi ya pasi te ? Mikolo ya bomoi na ye ezali penza mikolo ya mongamba te ?
1 Bakolinto 15:45 (MNB)
Yango wana ekomama : « Moto ya liboso, Adamu, akomaki ekelamu na bomoi, azalaki na bomoi ya bomoto ; » kasi Adamu ya suka akomaki Molimo oyo apesaka bomoi.
Levitike 24:18 (MNB)
Soki moto abomi nyama ya moto mosusu, asengeli kozongisa nyama ya bomoi na esika ya nyama oyo ekufi : kolanda mobeko ya bomoi mpo na bomoi.
Banzembo 104:33 (MNB)
Nakoyembela Yawe bomoi na ngai mobimba ; nakoyembela Nzambe na ngai tango nyonso nazali na bomoi.
Masese 22:23 (MNB)
pamba te Yawe akobundela bango mpe akobebisa bomoi ya bato oyo bakobebisa bomoi na bango.
Banzembo 146:2 (MNB)
Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba, nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso nakozala na bomoi.
Ezayi 38:12 (MNB)
Mikolo ya bomoi esili, elongwe na bomoi na ngai ndenge balongolaka ndako ya kapo ya mobateli bibwele. Akati bomoi ngai ndenge motongi bilamba akataka basinga soki asilisi kotonga elamba. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.
Banzembo 21:5 (MNB)
Asengaki Yo bomoi, mpe opesaki ye yango ; opesaki ye bomoi molayi mpe ya libela na libela.
Yoane 12:25 (MNB)
Moto nyonso oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; kasi moto oyo aboyi kokangama na bomoi na ye, kati na mokili oyo, akobatela yango mpo na bomoi ya seko.
Yobo 15:20 (MNB)
Na bomoi na ye mobimba, na mibu oyo bakata mpo na bomoi na ye, moto mabe anyokwamaka.
Luka 17:33 (MNB)
Moto oyo akoluka kobatela bomoi na ye akobungisa yango, mpe moto oyo akobungisa bomoi na ye akobatela yango.
1 Yoane 5:12 (MNB)
Moto oyo azali na Mwana azali na bomoi, kasi moto oyo azangi Mwana na Nzambe azangi mpe bomoi.
1 Batesalonika 5:10 (MNB)
oyo akufelaki biso mpo ete, ezala soki tozali na bomoi to tokufi, tozala na bomoi elongo na Ye.
Yoane 5:26 (MNB)
pamba te lokola Tata azali etima ya bomoi, yango wana asalaki mpe ete Mwana azala etima ya bomoi ;
Luka 21:19 (MNB)
Boyika mpiko, mpe bokozwa bomoi.
Banzembo 39:5 (MNB)
Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.
1 Yoane 5:11 (MNB)
Mpe litatoli yango ezali : Nzambe apesa biso bomoi ya seko, mpe bomoi yango ezali kati na Mwana na Ye.
Yoane 6:63 (MNB)
Ezali Molimo nde apesaka bomoi ; mosuni ezali na eloko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali Molimo mpe bomoi.
Yoane 11:25 (MNB)
Yesu alobaki na ye : — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi.
2 Samuele 19:6 (MNB)
Joabi akendeki kokuta mokonzi kati na ndako mpe alobaki na ye : « Lelo, oyokisi bato na yo nyonso soni, bato oyo bawuti kobikisa bomoi na yo, bomoi ya bana na yo ya mibali mpe ya basi, bomoi ya basi na yo mpe bomoi ya bamakangu na yo.