Nini boluki epesi
Bagalatia 2:20 (MNB)
boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
Barome 14:8 (MNB)
Soki tozali kobika bomoi, tozali kobika yango mpo na Nkolo ; soki mpe tokufi, tokufi mpo na Nkolo. Yango wana, tobika bomoi to tokufa, tozali kaka bato ya Nkolo.
Banzembo 34:13 (MNB)
Nani asepelaka na bomoi ? Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo ?
Misala ya Bantoma 28:1 (MNB)
Wana tososolaki ete tosili kobika na likama, toyokaki ete babengaka esanga yango Malite.
Barome 8:24 (MNB)
Pamba te tosila kobika, kasi kobika yango ezali nanu elikya. Nzokande soki tozali komona eloko oyo tozali kotiela elikya, wana ezali lisusu elikya te, pamba te nani akoki kotia elikya na eloko oyo azali komona ?
3 Yoane 1:4 (MNB)
Nazalaka na esengo makasi tango nayokaka ete bana na ngai bazali kobika kolanda bosolo.
Jeremi 17:9 (MNB)
Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?
Bafilipi 4:12 (MNB)
Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo : ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli.
Bagalatia 5:25 (MNB)
Lokola tozali kobika bomoi na biso na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.
Misala ya Bantoma 4:9 (MNB)
Lokola botuni biso lelo na tina na bolamu oyo esalemi epai ya mokufi makolo mpe ndenge nini asili kobika,
Yobo 19:20 (MNB)
nakomi eloko pamba, natikali kaka poso ya nzoto mpe mikuwa, nazali kobika kaka na misuni ya minu na ngai.
Ezekieli 17:14 (MNB)
mpo ete bokonzi ekweya, ekoka lisusu kotelema te mpe ewumela kobika kaka na kobatela mibeko ya boyokani na ye.
Yoane 5:6 (MNB)
Lokola Yesu amonaki ye alala na mabele mpe ayokaki ete awumeli mikolo ebele na pasi yango, atunaki ye : — Olingi kobika ?
Amosi 7:5 (MNB)
Boye, nagangaki : — Oh Nkolo Yawe, nabondeli Yo, kosala boye te ! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika ?
Ba-Ebre 11:1 (MNB)
Nzokande kondima ezali ndanga ya kozwa biloko oyo tozali kolikya epai ya Nzambe, mpe kobika lokola nde tosili kozwa biloko yango atako tozali komona yango te.
Ba-Efeso 5:15 (MNB)
Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika ; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya.
Ba-Ebre 11:20 (MNB)
Mpo na kondima, Izaki apambolaki Jakobi mpe Ezawu mpo na lolenge ya bomoi oyo basengelaki kobika na mikolo oyo esengelaki koya.
Jeremi 8:22 (MNB)
Boni, kisi ezali te kati na Galadi ? Minganga bazali kuna te ? Bongo mpo na nini bato na ngai bazali kobika te ?
Tito 3:14 (MNB)
Bandeko na biso mpe basengeli koyekola komipesa na misala ya malamu, mpo na kosunga bosenga nyonso mpe kobika bomoi oyo ekobotaka bambuma.
Misala ya Bantoma 27:20 (MNB)
Lokola tosalaki mikolo ebele na kozanga komona lisusu moyi mpe minzoto te, mpe mopepe ezalaki kaka kobeta makasi, tobungisaki elikya ya kobika.
Jake 5:5 (MNB)
Awa na mokili, bozali kobika bomoi ya bisengo mpe ya bofuluki, bozali komikomisa nzoto mafuta lokola banyama oyo babongisi mpo na koboma.
Malako 13:20 (MNB)
Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.
Matayo 24:22 (MNB)
Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.
Luka 20:35 (MNB)
kasi bato oyo bakomonana ete bakoki mpo na kosekwa kati na bakufi mpe kobika bomoi kati na mokili oyo ezali koya, bakobala te
Yoane 17:22 (MNB)
Nasaleli bango ngolu ya kobika nkembo na Yo ndenge kaka osalaki mpo na Ngai, mpo ete bazala moko ndenge biso mpe tozali moko :