Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 4Mwa ndambo
![Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 4](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapistaging.com%2Fhttps%3A%2F%2Fs3.amazonaws.com%2Fyvplans-staging%2F50515%2F1280x720.jpg&w=3840&q=75)
MOKILI MOBIMBA AZALI NA MPOSA YA YESU
Likambo yango esalamaki ndenge nini? Ndenge nini obongoli motema? Bato mingi oyo bazali zingazinga na yo balingi koyeba makambo matali Yesu mpe lobiko kasi bakoki kosala bongo bobele soki bamoni mbongwana monene kati na bomoi na yo. Episkopo David Oyedepo alobi: “Nsango malamu ezali te mpo na ba gramere minene kasi mpo na mbongwana monene”. Bato bazali na mposa ya ba gramere na yo minene te, kasi bazali na mposa ya mbongwana oyo nsango malamu ya Yesu ekoki kosala to ekoki kosala kati na bomoi na yo.
Ntango nabotamaki mbala ya mibale, nayebisaki baninga na ngai te, mpamba te nazalaki mobandisi ya etuluku, mokambi ya miziki, mokomi ya ba Nzembo mpe molakisi ya miziki na ntango wana; yango nayebaki te lolenge nini ya koyebisa bango nsango yango; kasi ntango bamonaki ete nazali lisusu kobeta miziki ya mokili te, babandaki kotuna ngai mituna mpe eyano na ngai ezalaki ete Yesu abikisi ngai mpe nazali sikawa nakomi moto ya sika. Etuluku yango ekufaki mbula mitano nsima ya ngai kobongola motema mpe mingi kati na bango bazali sikawa baklisto oyo babotami mbala ya mibale.
Bato oyo bazalaki kofanda elongo na moto oyo na engumba oyo uta ntango molai kasi bazalaki kosepela na ye te mpo ete azalaki moto mpamba mpe mosungi biloko; kasi ntango Yesu ayaki na bomoi na ye, abongolaki bomoi na ye mpe moto yango akomaki monzoto monene mbala moko. Tika ete mbongwana ya lobiko kati na bomoi na yo ekomisa yo elembo ya Yesu epai nyonso ozali to okokende na nkombo ya Yesu. Tika ete olonga milimo ebele mpo na Klisto na nzela ya bomoto na yo ya sika kati na Klisto.
Libondeli: Nabikisami na ngolu na yo oh Nkolo, tika ete mbongwana ya lobiko na bomoi na ngai ebenda milomo ya bato mingi na lobiko mpo nazali mosali ya mbongwana na maboko na yo oh Nzambe. Na nkombo na Yesu nabondeli mpe nandimi, AMEN.
Botangi mosusu: Malako 5:1-5…15-16| Luka 4:18-19| Ba-Efeso 20-24|Baloma 12:2|
Makomi
Oyo etali Ebongiseli oyo
![Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 4](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapistaging.com%2Fhttps%3A%2F%2Fs3.amazonaws.com%2Fyvplans-staging%2F50515%2F1280x720.jpg&w=3840&q=75)
Na yango, mokili esengeli koyeba Yesu Klisto; lokola tozali batatoli na ye, tosengeli kozala pene ya kokutana na mikakatano mpe minyoko wana tozali kokokisa mokumba monene wana na koyebaka ete Yesu akozala na biso elongo ntango nyonso kino nsuka ya ntango.
More
Tolingi kopesa matondo mingi na Dennis Mutombo Mpanya mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.facebook.com/Pastor.Wampayo?mibextid=LQQJ4d