Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 4Mwa ndambo

KOZANGA KOBANGA
Yesu akebisaki biso na ntina na minyoko oyo tokokutana na yango mpo na nkombo na ye, kasi alobaki mpe na biso ete tobanga te mpamba te akozala elongo na biso kino nsuka ya ntango. Nyonso oyo tozali komona ata na molongo 12 kino molongo 34 ezali ete; moto oyo azalaki liboso mokufi miso azali kosambisama na bazalani na ye, bato oyo bayebaki ye, Bafalisai mpe Bayuda ( Bapameli ya bato), kasi mwana mobali oyo alongaki bango nyonso. Ozalaka na esaleli nini ntango nyonso okutanaka na minyoko mpo na Yesu? Baboti na ye babangaki mpe batikaki mwana na bango ye moko amisambela mpamba te akomaki moto mukolo. Osengeli kokola na makambo ya molimo mpo ete okoka kolongisa kondima na yo mpe Klisto liboso ya esambiselo to na esika mosusu nyonso. Lobiko ezali likambo ya moto na moto, kotya motema te na episkopo to na Pasteur na yo mpo azala ntango nyonso elongo na yo mpo na kobatela kondima na yo, tya motema na Molimo Mosantu mpo na kotombola etelemelo na yo ntango nyonso oyo ozali kokutana na mikakatano kati na bomoi na yo.
Mpo na baoyo bazali kokosela yo makambo, bolamu na yo ezali eloko te soki tokokanisi yango na Mibeko ya Moise. Ekozala malamu otosa mibeko ya Moise na esika obika na masumu na yo. Bazalaki kokatela Yesu etumbu ete abikisaki moto na mokolo ya Sabata. Mpe na makanisi na bango. Balingaki ete moto oyo abikisamaki asangana na bango mpo na kokweisa Yesu. Yesu azali Nkolo ya Sabata, na nzela na ye tobikisami. Soki olingi kozala moyekoli ya solo ya Klisto, osengeli soko moko te Kosangana na bato oyo bazali koloba mabe mpo na basusu. Bato oyo bazali kokosela biso makambo na mikolo oyo ezali bato oyo batyolaka Nzambe, basumuki, bato ya kotyela mpe bakosi. Ntango bazali kotyela mpe koseka lingomba, Kosangana na bango te. Komikotisa te na misala oyo mizali kowangana Klisto na lolenga moko to mosusu.
Lokola Yesu azalaki mokambi oyo amibanzakabanzaka mpo na bampate na ye, azalaki komibanzabanza mpo na mibeko te, kasi mpona bolamu ya bampate na ye. Wana tozali kokende kosakola nsango malamu, tika ete totika kozala bato na bindimeli ya lingomba mpe tozala basali oyo batyaka Klisto na esika ya liboso. Tokoki kosakola mibeko mpe ngolu na ntango moko te. Tozali na nse ya mibeko te kasi na nse ya ngolu ya Nzambe. Tozali na bonsomi ya kosambisama, Molimo Mosantu ezali kopesa biso nguya ya kotosa liloba ya Nzambe mpe tozali lisusu baumbu ya lisumu te.
Libondeli: Tata Nzambe, natondi mpo na kobikisa molimo na ngai. Nazali lisusu moumbu ya lisumu te kasi moto ya bonsomi oyo apesameli nguya na Molimo Mosantu mpo na kozala na bomoi oyo ezali kosepelisa Nzambe. Nazali kotonda yo mpo na ngolu na yo kati na bomoi na ngai, nalingaki nazala nani soki ngolu na yo te? Matondo mingi Nkolo.
Botangi mosusu: Luka 12:4-8, 11-12| Matayo 5:11-12|Misala 18: 12-13| Matayo 12:1-8| Malako 2:23-28| Luka 6:1-5| Baloma 6:14| Baloma 8:1, 7, 12-13|
Makomi
Oyo etali Ebongiseli oyo

Na yango, mokili esengeli koyeba Yesu Klisto; lokola tozali batatoli na ye, tosengeli kozala pene ya kokutana na mikakatano mpe minyoko wana tozali kokokisa mokumba monene wana na koyebaka ete Yesu akozala na biso elongo ntango nyonso kino nsuka ya ntango.
More
Tolingi kopesa matondo mingi na Dennis Mutombo Mpanya mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.facebook.com/Pastor.Wampayo?mibextid=LQQJ4d