Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Bato Oyo Basilisaka Mikakatano | Eteni 3Mwa ndambo

Bato Oyo Basilisaka Mikakatano | Eteni 3

MOKOLO 1 NA 3

MISALA

Kondima esuki kaka na Maloba te kasi na misala. Moto moko alobaki été misala elobaka mingi koleka maloba. Lakisa nga misala na yo mpe nakoyebisa yo soki ozali na kondima to te. Mwasi yango akendaki mosika na ye, elingi koloba ete na nsima ya koyoka maloba ya Nzambe tosengeli tokende kotya yango na misala. Na lolenge lobongi, malako oyo Elise’ apesaki ye mazalaki na ntina te, akokaki kozwa ekateli ya koboya yango, kasi lokola azalaki na kondima na maloba ya Nzambe oyo Elise’ alobelaki ye, asalaki yango. Nsima ya koyoka liloba ya Nzambe, likambo ya mibale oyo tosengeli na kosala ezali misala mpamba te kozanga kotya liloba ya Nzambe kati na misala elimboli ete tozali na kondima te epai na Nzambe. Malamu nayoka lisukulu moko ya petee oyo nakosalela yango na bomoi na ngai, na esika ya koyoka nsango moko ya nguya oyo nakosalela te.

Moko ya ba nzela ya malamu mpo na kosilisa mikakatano ezali bongo kosala engebene liloba ya Nzambe. Mbala mingi, Nzambe akoyebisa yo osala likambo oyo emonani ete ezali na ntina te, kolanda makanisi ya bato te kasi ndimela Nzambe. Sala makambo oyo Nzambe azali kosenga yo, ata soki ezali komonana ete ekoki kosalema te to siansi endimi yango te, okosilisa mikakatano oyo bato basilisaka te. Ndenge nini mbisi mibale mpe mampa mitano ekoki koleisa bato koleka 5,000 ? Kasi bayekoli basalaki engebene maloba ya Yesu mpe oyo ekokaki kosalema te mpo na moto esalamaki nzela ya kondima. Oyoki liloba ya Nzambe mingi, ntango ekoki mpo na kokende mosika na Pasteur na yo mpe kotya liloba na Nzambe kati na misala. Tika kotya ntembe na liloba ya Nzambe, ndima kaka mpe okomona ndenge bilaka ya Nzambe ekokokisama na bomoi na yo.

Bana na ye ya mibali bazalaki na makanisi ndenge moko na ye, bazalaki kosalisa ye. Nazali kobondela ete Nzambe apesa yo bato oyo bakozala na yo elongo ezala mbula to moi. Bato oyo bakondimela yo ata ntango olembi, bato oyo bakomdimela ndoto na yo. Elizabeta asalaki bongo mpo na Malia, alendisaki ye mpe andimelaki ye na ndoto na ye ya kobota mobikisi ya mokili. Nzokande, kondima ezali likambo ya moto na moto, ezali na mposa ya moto te mpo na kosunga yo, ndima kaka okomona nkembo ya Nzambe.

Libondeli: Tata Nzambe sunga ngai nandimaka liboso ya komona, Naboyi kondima ya lolenge ya Tomasi, na nkombo na Yesu. Tika ete misala na ngai emonisa kondima na ngai epai na yo. Tika ete misala na ngai emema bato mingi na lobiko mpe elendisa kondima ya ba oyo balembi. Na nkombo na Yesu nabondeli, AMEN.

Botangi mosusu: Yoane 6: 5-13 | Luka 1:45 | 1 Bakonzi 17:15-17 | Ba Ebre 11:7-8

Mokolo 2

Oyo etali Ebongiseli oyo

Bato Oyo Basilisaka Mikakatano | Eteni 3

Soki moto azali na Kondima te mpe azali na Botosi te, akoki kosilisa mikakatano te. Soki azali na kondima epai na Nzambe, osengeli komonisaka yango na kotosa ye mpamba te kondima oyo ezangi misala ezali ekufi.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na Dennis Mutombo Mpanya mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.facebook.com/Pastor.Wampayo?mibextid=LQQJ4d