Bato Oyo Basilisaka Mikakatano | Eteni 3Mwa ndambo

NZAMBE ASALAKA MAKAMBO NDAMBU NDAMBU TE
Azalaki kotondisa ata mbeki moko te na ndambu ya mafuta, mbeki nyonso etondaki na mafuta. Nzambe atikaka makambo kati kati ya nzela te nyonso abanda asilisaka yango kitoko mingi. Nsima ya kosala mosala na boumeli ya mikolo motoba, atalaki biloko oyo asalaki mpe alobaki ete ezalaki malamu mingi. Nzambe asukaka kaka te na kosala makambo alingi, kasi asalaka yango na ndenge ya malamu mingi. Yesu abikisaki biso ndambu te, lobiko na biso ezali ya kokoka, ya nguya mpe ya malamu mingi. Tozali kaka na bomoi te, kasi tozali na bomoi ya malamu mingi. « Maisha Bora na Bora Maisha » Maloba oyo ya Kiswahili elimboli ete; bokeseni ezali kati ya bomoi ya malamu mpe bomoi ya mpamba. Nzambe asili kotya kati na yo nyonso oyo osengeli mpo na ozala na bomoi ya malamu mingi, na yango likambo ezali nde na maboko na yo.
Na mosala nyonso oyo Nzambe aponi yo, zala moto oyo ayebi kosilisa mikakatano, mpe sala yango na motema mobimba, sala yango malamu mingi mpo na nkembo ya Nzambe. Zala moto oyo asalaka mosala malamu mingi mpe tika koluka bantina ya komilongisa.
Lokola mopakolami mosusu nyonso, yo mpe opakolamaki na Molimo Mosantu, yango wana ozali na likambo moko te ya koloba mpo na komonisa ete ozali mopakolami ya Nzambe te. Tika ete makanisi ya mpamba mpamba elungwa na makanisi na yo sikawa, na nkombo ya Yesu.
Ozali moto ya ndambu te kasi moto ya solosolo, ozali Pasteur ya ndambu te kasi Pasteur ya solosolo, mpe ozali te moto ya mombongo ya ndambu kasi moto ya solosolo. Moto moko te asengeli kobangisa yo, biso nyonso tosalema na lolenge ya malamu mingi na elilingi mpe na bokokani ya Nzambe na mokano ya kozala bato ya malamu. Kokanisa te na makambo ya mpamba, mpe kolonga te na makambo ya mpamba, yango ezali monguna ya makambo ya malamu mingi. Zala na mokano ya kozala moto oyo ayebi mpe asalaka mosala na ye malamu mingi.
Libondeli: Tata na ngai ya likolo, natondi yo na ndenge osalaki ngai na lolenge ya malamu mingi mpe okomisi ngai moto oyo aleki bikelamu na yo nyonso. Nazali kokana ete nakozala moto monene ya eleko na ngai. Na nkombo ya Yesu, naboyi kozala na makanisi ya mpamba mpamba. Tika ete Molimo ya bokoli akota na makanisi na ngai uta lelo mpe libela na nkombo ya Yesu, nabondeli mpe nandimi, AMEN.
Botangi mosusu: Ebandeli1: 31 | Daniele 6:3 | Mosakoli 9:10 | Bafilipi 1:6| 2 Bakolinto 8:7 | Bakolose 3: 23
Makomi
Oyo etali Ebongiseli oyo

Soki moto azali na Kondima te mpe azali na Botosi te, akoki kosilisa mikakatano te. Soki azali na kondima epai na Nzambe, osengeli komonisaka yango na kotosa ye mpamba te kondima oyo ezangi misala ezali ekufi.
More
Tolingi kopesa matondo mingi na Dennis Mutombo Mpanya mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.facebook.com/Pastor.Wampayo?mibextid=LQQJ4d